Koluka noki, koyoka, kotambwisa
Relais communautaire mpe psychologue basalaka elongo, na application oyo esalemi mpo na mosala ya mboka, mpe balandaka mama kino na bisaleli ya monganga.
Uta na botali na ndako kino na monganga
1. Dépistage na ndako
Relais communautaire atalaka liboso bilembo ya likama na nzoto (kobima makila, fièvre…) sima atunaka mituna 10 ya EPDS, na mongongo makasi, na lokota ya mama.
2. Kokabola makama ndenge OMS elobi
Application elandaka toli ya mhGAP ya Organisation mondiale de la Santé: likama moke, ya katikati, monene to likama ya noki. Makanisi ya komisala mabe ebimisaka alerte ya liboso.
3. Psychologue alandaka mama
Psychologue ya binôme azwaka ba alerte, abengaka mama, abongisaka lisolo na ye mpe alandaka ndenge score na ye ezali kobongwana na ntango.
4. Kotinda mama na bisaleli ya monganga
Liste ya bisaleli ya santé na zone de santé moko na moko ya Kinshasa (maternité, urgence, santé mentale) esalisaka mpo na kotinda mama moko na moko.
Esalemi mpo na mosala ya mboka
- Na internet te: nyonso esalaka kozanga réseau; ba nsango etindamaka soki réseau ezongi.
- Ebatelami: code PIN mpo na mosali moko na moko, ba nsango ebombami na sekele na telefone, kaka ekipi nde ekoki kotala.
- Mpo na koyoka: mituna mpe ba nsango etangami na mongongo.
- Mpo na bamama mpe: esika ya kozanga compte mpo na komitala mpe kosolola na LA SEREINE.
Komitala sikoyo
Mituna 10, miniti 3, na sekele.